Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Emoniseli 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 « Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Emoniseli 1:8
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.


Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.


Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango !


Jakobi alobaki na Jozefi : — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana ; mpe kuna, apambolaki ngai.


Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.


Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »


Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe.


Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo ? Nani abengaka bileko wuta na ebandeli ? Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso, mpe nakozala mpe kaka ndenge moko elongo na bato ya suka. »


« Bozali batatoli na Ngai, » elobi Yawe, « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, mpo ete bokoka koyeba, kondimela Ngai mpe kososola ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe : Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema ; mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


Yoka Ngai, oh Jakobi, Isalaele, yo oyo nabengaki ! Ngai, nabongwanaka te ; nazalaka na ebandeli mpe na suka.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :


Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »


koloba : « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »


Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


na koloba : « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi ; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo nayokaki etumbelo koloba : « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! »


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne : « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi :


Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango.


Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.


Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ