Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:6
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.


Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !


Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.


Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili ?


Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »


Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi.


Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.


Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.


Bakalaka na ye basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi.


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga akimaka kino na libulu ya kufa ; tika ete moto moko te akanga ye nzela.


tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;


mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye.


Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye.


Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki. Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule.


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga.


Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.


Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.


Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana,


Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.


Soki moto asengeli kokende na bowumbu akokende penza na bowumbu. Soki moto asengeli kokufa na mopanga akokufa penza na mopanga. Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima.


Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo.


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ