Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino.


Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe.


Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.


Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye.


Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.


Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.


Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango.


Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ