Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:27 - Mokanda na Bomoi

27 Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:27
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.


Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano.


Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.


Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.


Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.


Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?


Ezayi mpe alobaki : « Moto moko akobima wuta na libota ya Izayi, akotelema mpo na kokonza bikolo, mpe Bapagano bakotiela Ye elikya. »


Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe.


Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.


Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ