Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:26 - Mokanda na Bomoi

26 Alobaki lisusu : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:26
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.


Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »


Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?


Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.


ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo.


Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye ! Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango !


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.


Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ