Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:25 - Mokanda na Bomoi

25 Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:25
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba.


Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki.


Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.


Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.


Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda.


Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki.


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.


Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai.


Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ