Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.


Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi : na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te.


Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te !


likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.


Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.


Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ