Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:20 - Mokanda na Bomoi

20 Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.


Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga.


Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »


Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.


Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.


Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.


Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.


Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ;


Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.


Kokamwa ngai te mpo ete nazali mwindo, pamba te moyi nde eyindisi ngai. Bana mibali ya mama na ngai basilikelaki ngai, bakomisaki ngai mokengeli bilanga ya vino. Solo, bilanga na ngai moko ya vino, nazalaki kokoka lisusu te kokengela yango.


Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko ? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te ? Nani abatelaka etonga mpo amela miliki na yango te ?


Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye.


Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ