Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya :
Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »