11 Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.
nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi.
Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini ? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe
Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.