Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 9:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »


Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »


Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.


Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala.


Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »


Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.


Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »


Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.


Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino.


Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »


Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.


Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ