17 Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »
Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
« Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.
Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.
Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.