16 « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.
Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.
Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela.
Boye, Nzambe alobaki na Noa :
Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.
pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.
Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.
Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.
Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani.