Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 8:12
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa.


Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.


Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo ; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.


Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.


Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama ; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka ; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka ; solo, ekokokisama, ekowumela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ