10 Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa.
Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili.
Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.
Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.
Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo ; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.
Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.
Kasi soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo tokozela yango na molende.