8 Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu
Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo.
Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe ya bandeke ya likolo.