5 Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.
Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.
Na bongo, nakoyoka soni te tango nakotosa mibeko na Yo nyonso.
Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.
Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.
Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
Kasi Yesu azongisaki : — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.
Mama na Ye alobaki na basali : — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.
Atako azalaki Mwana na Nzambe, kasi ayekolaki botosi na nzela ya pasi nyonso oyo amonaki.