Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 7:23 - Mokanda na Bomoi

23 Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 7:23
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.


Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.


Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.


soki ayokelaki te mokili ya kala mawa kasi abikisaki bato mwambe oyo kati na bango ezalaki na Noa oyo azalaki kosakola bosembo na tango ya mpela oyo abebisaki na yango mokili elongo na bato oyo batosaki Ye te,


elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.


Babosanaka mpe ete ezali lisusu na nzela ya mayi yango nde mokili ya tango wana ebebisamaki wana ezindaki kati na mayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ