Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 7:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.


Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela.


Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.


Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.


Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.


Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.


ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe.


Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye ! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa ! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.


Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.


Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto :


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ