Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 6:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 6:7
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.


Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.


Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.


Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.


Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki : — Makambo yango ekosalema te.


Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki : — Makambo yango ekosalema lisusu te.


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


« Nakosilisa kobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na mokili, » elobi Yawe,


« solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.


Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ