Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 6:22 - Mokanda na Bomoi

22 Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 6:22
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.


Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.


Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.


eyaki epai na Noa mpe ekotaki na masuwa, mwasi na mobali, ndenge Nzambe atindaki Noa.


Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.


atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.


mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.


Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye mpe akendeki na mokili ya Isalaele.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Mama na Ye alobaki na basali : — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ