16 Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.
Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.
bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso.
Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda ; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi.