Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili.
milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.