Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 6:13 - Mokanda na Bomoi

13 Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 6:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.


Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.


Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.


Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.


Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.


Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ; bino bato, botia matoyi ! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka !


Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, yo oyo otonda na bomengo mingi, suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki !


Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.


Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ