Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 6:11
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »


Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.


Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti.


Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe,


Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.


Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !


Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »


Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,


Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te makelele ya mobulu to ya kopanza to ya kobebisama kati na etando na yo ; kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. ›


Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. Sango moko kaka ezali kotambola kuna : sango ya mobulu mpe ya kobebisama ; tango nyonso liboso na Ngai, kaka minyoko mpe bapota.


Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu ; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo !


Oh Yawe, kino tango nini nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, kasi ozali koyoka te ? Nazali koganga epai na Yo : « Minyoko eleki ! » kasi ozali kaka kobikisa te !


Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.


Pamba te ezali te bato oyo bayokaka Mobeko nde bazali sembo na miso na Nzambe, kasi ezali ba-oyo batosaka Mobeko yango nde bakotangama lokola bato ya sembo.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ