Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango.
Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo kati na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ?
Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.