Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 50:5 - Mokanda na Bomoi

5 ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 50:5
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Bongo Isalaele alobaki na Jozefi : — Etikali moke nakufa. Nzambe akozala na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bakoko na bino.


Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »


Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon : — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye


Faraon azongisaki : — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi.


Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei ; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye.


Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.


basopi makila na bango lokola mayi zingazinga ya Yelusalemi, mpe moto ya kokunda bango azalaki te !


tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela ; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te ; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.


liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.


Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;


‹ Ozali kosala nini awa, mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo mpe kotonga epemelo na ye kati na lidusu ya libanga monene ?


mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki.


Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te ; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.


Bongo Saulo alobaki na Jonatan : — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki : — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ