6 Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.