3 Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.