Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
Bakotonga bandako te mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, mpe bakolona bilanga te mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango ; pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, mpe baponami na Ngai bakosepela na bambuma ya misala ya maboko na bango.