Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.
Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.
Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi ; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »
« Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga : Rasheli azali kolela bana na ye ; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.