Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 5:2 - Mokanda na Bomoi

2 Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 5:2
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe ; akelaki bango mobali mpe mwasi.


Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »


Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango.


Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »


Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »


Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !


Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »


Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ