Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 5:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.


Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo,


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango : « Nazali kosepela na ngai na yango te ; »


Tala makambo oyo nasosoli : Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »


Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :


Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.


mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ