9 Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?
Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te.
Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba, enyatelo makolo ya wolo ekanganaki na kiti. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko, mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko.
Tango mama ya nkosi yango emonaki ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela mpe elikya na yango esili, ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.
Misala na bango ezali kopekisa bango kozonga epai ya Nzambe na bango, mpo ete molimo ya kindumba evandi kati na mitema na bango, bazali koyeba Yawe te.
Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.
Mpo na Gadi, alobaki : « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.
Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »