Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 49:6 - Mokanda na Bomoi

6 Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 49:6
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.


Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu, bomoi na ngai elongo na basopi makila,


Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.


Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.


Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.


Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.


Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te !


Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe ! Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai !


Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule !


Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.


Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.


Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,


Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.


Minoko na bango elobaka kaka lokuta, mitema na bango etondi na mabe. Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, mpe bakosaka na nzela ya lolemo na bango.


Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,


Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya !


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Jozue asalaki bango ndenge Yawe atindaki : akataki misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe atumbaki bashar na bango.


Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.


Davidi abotolaki Adadezeri bashar nkoto moko, akangaki basoda nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ