Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 49:3 - Mokanda na Bomoi

3 « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; oleki na lokumu mpe na nguya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 49:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »


Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.


Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.


Jozefi alobaki na tata na ye : — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.


Tala bana mibali ya Isalaele : Ribeni, Simeoni, Levi, Yuda, Isakari, Zabuloni,


Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso.


Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.


Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.


Abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito, bambuma ya liboso ya makasi na bango na se ya bandako ya kapo ya Cham.


Libota ya Ribeni ekozwa eteni moko ya mabele : ekozala na mondelo ya libota ya Efrayimi, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.


Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.


Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki ; na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu ;


Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.


Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »


Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te, mpe tika ete bato na ye bazala moke te ! »


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ