Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:9 - Mokanda na Bomoi

9 Jozefi azongiselaki tata na ye : — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. Isalaele alobaki : — Pusa bango mpo ete napambola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.


Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ?


Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : — Banani wana bazali elongo na yo ? Jakobi azongisaki : — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.


Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.


Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Emani, mosakoli ya mokonzi, oyo azalaki koyebisa ye maloba na Nzambe mpo na konetola nguya na Ye. Nzambe apesaki na Emani bana mibali zomi na minei mpe bana basi misato.


Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.


Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.


Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.


Mpo na kondima, wana Jakobi akomaki pene ya kokufa, apambolaki mwana moko na moko ya Jozefi mpe agumbamaki na koyekamela songe ya lingenda.


Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »


Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ