Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.


Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi.


Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo ; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango.


Na nguya ya loboko na Yo, okangolaki bato na Yo, bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.


Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.


Bozala bule, bato oyo babulisami mpo na Ngai ; pamba te Ngai Yawe, nazali Bule ; nalongolaki bino kati na bikolo mosusu, natiaki bino pembeni, mpo ete bozala bato na Ngai moko.


« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


mpo na bana mibali ya Jozefi : mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ; mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ;


Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »


abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,


Mpo na kondima, wana Jakobi akomaki pene ya kokufa, apambolaki mwana moko na moko ya Jozefi mpe agumbamaki na koyekamela songe ya lingenda.


mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »


pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ