4 Alobaki na ngai : « Nakopesa yo mabota mpe nakokomisa yo ebele ; nakokomisa yo lisanga ya bikolo ebele mpe nakopesa mokili oyo lokola libula ya seko na seko epai ya bakitani na yo sima na yo. »
Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.
Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.
Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.
Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.