22 Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.
Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.
Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.
Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.
Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.
Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.
Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ?