2 Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto.
Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi.
Jakobi alobaki na Jozefi : — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana ; mpe kuna, apambolaki ngai.
Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki : — Totelema mpe totonga ! Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango.
Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.
Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo.
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye ; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.
Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe.