Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele.


Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »


Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.


Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.


Nzambe alobaki : — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna.


Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki ; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.


Jozefi alobaki na tata na ye : — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.


Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda : ezali nde mokonzi ya Asiri.


Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti bazalaki basoda kati na mampinga na yo : bazalaki kotia banguba mpe bikoti na bango na likolo ya bamir na yo ; bazalaki kosala lokumu na yo.


Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo.


Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »


kati na libota ya Aseri, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Nefitali, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Manase, bato nkoto zomi na mibale ;


kati na libota ya Zabuloni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Jozefi, bato nkoto zomi na mibale ; mpe kati na libota ya Benjame, bato nkoto zomi na mibale. Bango nyonso babetamaki kashe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ