Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase.
Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »