Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:17
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana.


Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.


Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki ; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.


Jozefi alobaki na tata na ye : — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.


Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.


Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.


noki te Yawe akomona, akosepela te mpe akokitisela yo kanda na Ye.


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Balami alobaki na anjelu ya Yawe : — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.


Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,


Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.


Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ