Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:14 - Mokanda na Bomoi

14 Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki ; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:14
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. »


Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »


Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.


Jozefi azwaki bango mibale : Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele ; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele.


Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase.


Jozefi alobaki na tata na ye : — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali, mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Na ngambo ya weste, milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.


Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko.


Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango.


Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.


Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.


Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.


Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.


Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.


Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.


Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.


Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ