Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:12 - Mokanda na Bomoi

12 Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.


Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.


Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.


Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.


Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.


Isalaele alobaki na Jozefi : — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.


Jozefi azwaki bango mibale : Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele ; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele.


Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.


Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe ;


Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye :


Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.


Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ