Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 48:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 48:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.


Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto.


Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.


Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi.


Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo : — Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele !


Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso.


Sima na yango, Yobo awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na tuku minei ; amonaki bana na ye mpe bakitani na ye kino na molongo ya minei.


mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.


Mpo na kondima, wana Jakobi akomaki pene ya kokufa, apambolaki mwana moko na moko ya Jozefi mpe agumbamaki na koyekamela songe ya lingenda.


pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ