9 Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.