Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 47:30 - Mokanda na Bomoi

30 Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango. Jozefi azongisaki : — Nakosala ndenge olobi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 47:30
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.


Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki


Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana.


Abrayami asombaki elanga yango epai ya bato ya Iti. Ezalaki kuna nde bakundaki mwasi na ye Sara.


Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti.


Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki ; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye.


Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »


Mosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye ?


Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.


mpo ete ozongi, olie lipa mpe omeli mayi na esika oyo napekisaki yo kolia to komela, bakokunda ebembe na yo te kati na kunda ya batata na yo. »


kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?


mpe nazongiselaki mokonzi : — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ