Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo ; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi.
Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.
Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,
Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?